PHPWord

 

 

 

رِسَالَتَانِ مُوجَزَتَانِ فِي الزَّكَاةِ وَالصِّيَامِ

 

Mikanda mibale ya mukuse miye mitali Zakat mpe Ngizi

 

 

سَمَاحَةُ الشَّيْخِ

عَبْدِ الْعَزِيزِ بْنِ عَبْدِ اللَّهِ بْنِ بَازٍ

رَحِمَهُ اللَّهُ

 

Pona bo nkumu bwa ye Sheikh

Abdul Aziz Ibn Abdullah Ibn Bâz

Allah ayokela ye mawa

 


بِسْمِ اللهِ الرَّحمَنِ الرَّحِيمِ

Mikanda mibale ya mukuse miye mitali Zakat mpe Ngizi

Mokanda mwa yambo

Pona boluki ya ntina na maye matali Zakat

Okombo ya Allah wa boboto atonda ngolu

Matondi na Allah na bomoko bwa Ye, kimya mpe mapamboli ezala likolo ya oyo nsima na ye Mosakoli azali te, mpe likolo ya libota mpe bayekoli baye.

Na sima na yango:

Mpe ya sôló ntina ya bokomi liloba oyo ezali mpona kopesa toli mpe kokundola bato mokulba ya zakat bamizilima mingi bazali komona mpamba, kozanga kofuta yango na ndenge oyo epesameli atako ezali na ntina monene mpe likambo oyo ete ezali moko ya makonzí mitano ya Islamu, soki ezali te, ebongiseli na yango ekoki kofandisama te; lokola Mosakoli, Allah apambola ye mpe apesa ye kimia, alobaki:

«بُنِيَ الإِسْلَامُ عَلَى خَمْسٍ: شَهَادَةِ أَنْ لَا إِلَهَ إِلَّا اللهُ وَأَنَّ مُحَمَّدًا رَسُولُ اللهِ، وَإِقَامِ الصَّلَاةِ، وَإِيتَاءِ الزَّكَاةِ، وَصَوْمِ رَمَضَانَ، وَحَجِّ البَيْتِ».

Islamu etongami na makonzí mitano : kotatola ete nzambe mosusu azali te kaka Allah mpe ete Muhammad azali Ntoma ya Allah, kotelemisa losambo, kopesa zakat, kokanga ngizi na sanza ya Ramadan, mpe kosala Hajj na Ndako (ya Allah)1. Bayokanaki mpo na bosolo na yango

Mpe ezali litomo likolo ya ba misilima kowuta na bizaleli ya islam oyo ezali polele, mpe bobateli baye bazali kolanda makambo yango, na tina ya matoba na yango ebele mpe kokitisa posa ya babola ya bamizilima kowuta na yango.

Kowuta na matomba na yango: ezali kolendisa mpe kokangisa bolingo kati kati ya bazui na babola, mpamba te milimo mizalaka ka momesano ya kolinga bato oyo basalaka bango makambo ya malamu.

Kati na yango : ezali kopetola mpe kopambola molimo, mpe kolongola yango na bizaleli ya bozangi mpe ya mpasi, lokola kurani ya lokumu emonisaki yango na maloba ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ( Allah) :

﴿خُذۡ مِنۡ أَمۡوَٰلِهِمۡ صَدَقَةٗ تُطَهِّرُهُمۡ وَتُزَكِّيهِم بِهَا...﴾

{Zua okati ya misolo na bango suadaka (makabo) oyo ekopetola mpe kopambola bango. ...} [At-Tawbah: 103].

Mpe kati na yango: ezali komesana mizilima na bizaleli ya bokabi, mpe boboto, mpe mawa epai ya baye bazali na bosenga.

Mpe kati na yango ezali kobenda mpe kobakisa mapamboli, mpe bozongisi esika na yango uta na Allah, Oyo-Aleki-Likoló, ndenge Allah alobaki:

﴿...وَمَآ أَنفَقۡتُم مِّن شَيۡءٖ فَهُوَ يُخۡلِفُهُۥۖ وَهُوَ خَيۡرُ ٱلرَّٰزِقِينَ﴾

{... mpe nyoso oyo bozali kobimisa azali kozongisela bino yango, mpe azali malamu ya bapesi} [Saba : 39], Mpe Ntoma (kimia mpe mapamboli ya Allah ezala likolo na ye) alobi na hadith ya sôló ete: Allah alobi:

«يَا ابْنَ آدَمَ أَنْفِقْ نُنْفِقْ عَلَيْكَ...».

« Eh mwana ya Adam, bimisa (na bolamu) oyo topesi yo, tokobakisela yo koleka ...»2 Mpe ezali na matomba misusu mingi koleka.

Mpe ya sôló likebisi ya makasi lipesami mpo na bosolo na oyo akozanga kobimisa yango to abimisi yango malamu te, Allah Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobaki:

﴿...وَٱلَّذِينَ يَكۡنِزُونَ ٱلذَّهَبَ وَٱلۡفِضَّةَ وَلَا يُنفِقُونَهَا فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ فَبَشِّرۡهُم بِعَذَابٍ أَلِيمٖ 34 يَوۡمَ يُحۡمَىٰ عَلَيۡهَا فِي نَارِ جَهَنَّمَ فَتُكۡوَىٰ بِهَا جِبَاهُهُمۡ وَجُنُوبُهُمۡ وَظُهُورُهُمۡۖ هَٰذَا مَا كَنَزۡتُمۡ لِأَنفُسِكُمۡ فَذُوقُواْ مَا كُنتُمۡ تَكۡنِزُونَ35﴾

{... mpe na baye bazali kobomba nkita ya wolo mpe mpalata (mbongo), mpe baboyi kobimisa yango na nzela ya Allah, pesa bango sango ya etumbu makasi 34

{Mokolo oyo wolo na mpalata na bango mikotoka na móto ya lifelo sima bakozikisaka bilongi na bango na yango, na mipanzi na bango na mikongo na bango. Oyo nde lifuta ya maye bozalaki kosangisa na nkita ya mokili. Na yango, bomeka etumbu ya maye bobombaki 35} [At-Tawbah: 34 - 35], Bomengo nyonso oyo zakat efutami te ezali eloko ya motuya oyo ekosala ete nkolo na yango azwa etumbu na mokolo ya lisekwa, ndenge emonisami na hadith ya sôló oyo ewuti epai ya Ntoma, oyo alobaki:

«مَا مِنْ صَاحِبِ ذَهَبٍ وَلَا فِضَّةٍ لَا يُؤَدِّي حَقَّهَا إِلَّا إِذَا كَانَ يَوْمُ القِيَامَةِ صُفِّحَتْ لَهُ صَفَائِحُ مِنْ نَارٍ؛ فَأُحْمِيَ عَلَيْهَا فِي نَارِ جَهَنَّمَ، فَيُكْوَى بِهَا جَنْبُهُ وَجَبِينُهُ وَظَهْرُهُ كُلَّمَا بَرَدَتْ أُعِيدَتْ لَهُ فِي يَوْمٍ كَانَ مِقْدَارُهُ خَمْسِينَ أَلْفَ سَنَةٍ حَتَّى يُقْضَى بَيْنَ العِبَادِ، فَيُرَى سَبِيلَهُ: إِمَّا إِلَى الجَنَّةِ، وَإِمَّا إِلَى النَّارِ».

«Ezali na nkolo wolo to palata te oyo azangi kofuta lotomo na ye oyo esengeli na ye kofuta kaka sé na Mokolo ya Lisekwa, basaani ya mɔ́tɔ ebongisami mpo na ye, epelisami na mɔ́tɔ ya Lifelo, mpe mopanzi na ye, elongi na ye, mpe mokɔngɔ na ye etyami elembo na ebende ya mɔ́tɔ motane. Ntango nyonso oyo ekokóma malili, ekopelisama lisusu mpo na ye mpo na mokolo oyo ekoumela mibu nkoto ntuku mitano, kino kosambisama ekoleka kati na basaleli mpe nzela na ye emonisami: ezala Lola to Lifelo.»3

Ntoma (ya Allah) kimia mpe mapamboli ya Allah ezala likolo na ye abetaki lisolo ya Nkolo ya Mpate mpe ya Ngombe mpe Meme oyo aboyaki kofuta to kobimisa Zakat mpona yango ete akozua etumbu mpona yango o mokolo ya suka.

Mpe eyambami kowuta na Ntoma ya Allah kimia mpe mapamboli ya Allah ezalaka likolo na ye alobaki :

«مَنْ آتَاهُ اللهُ مَالًا فَلَمْ يُؤَدِّ زَكَاتَهُ مُثِّلَ لَهُ شُجَاعًا أَقْرَعَ لَهُ زَبِيبَتَانِ يُطَوِّقُهُ يَوْمَ القِيَامَةِ، ثُمَّ يَأْخُذُ بِلَهْزِمَتَيْهِ (يَعْنِي شِدْقَيْهِ)، ثُمَّ يَقُولُ: أَنَا مَالُكَ، أَنَا كَنْزُكَ»، ثُمَّ تَلَا النَّبِيُّ ﷺ قَوْلَهُ تَعَالَى: ﴿وَلَا يَحۡسَبَنَّ ٱلَّذِينَ يَبۡخَلُونَ بِمَآ ءَاتَىٰهُمُ ٱللَّهُ مِن فَضۡلِهِۦ هُوَ خَيۡرٗا لَّهُمۖ بَلۡ هُوَ شَرّٞ لَّهُمۡۖ سَيُطَوَّقُونَ مَا بَخِلُواْ بِهِۦ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِۗ...

Oyo Allah apesi ye bomengo mpe afuti zakat te, ekobongwana na nyoka ya ngenge na mbuma mibale (ya raisins) ya moindo, oyo ekozinga ye na mokolo ya lisekwa. Bongo ekokanga ye na mbanga na ye mpe ekoloba: “Ngai nazali bozwi na yo, nazali bomengo na yo.” Na nsima na yango, Mosakoli (kimia mpe mapamboli ezala likoló na ye) atángaki maloba ya Allah Mozwi-ya-Nguya-Nyonso: {Mpe baye bazali koboya kokaba na bozui oyo Allah apesi bango, bakanisa te ete wana ezali malamu mpona bango. Ezali nde mabe mpona bango, na mokolo ya suka,...} [Al-Imrân: 180]4.

Mpe (kobimisa) Zakat ezali na lolenge minei (biloko) biye biwuti na mabele lokola, Mbuma (ya lolenge ebele) na lolenge ya bien, Bwele kowuta na ba Mpate (Meme mpe Ntaba) mpe Wolo na Palata mpe biloko ya mombongo.

Mpe kowuta na biloko nyoso oyo minei oyo ezali na mbano (seuil) eyebani, mpe Zakat esengeli te na eloko oyo ezali o sé na yango, motángo ya moke mpona Mbuma ezali ndenge moko te na mitano, mpe etiyelo, (Sa'a) ezali ntuku motoba (60) kolandana lolenge Ntoma amekaki, (kimia mpe mapamboli ya Allah ezala likolo na ye) kowuta na Dattes mpe Zabibu mpe Hintwa (Blé) mpe loso mpe Shairu mpe biloko bisusu ya ndenge wana ya Sa'a nkama misato kolandana na Sa'a ya Ntoma ya Allah kimia mpe mapamboli ezala likolo na ye, na yango okomeka mpona kotia yango na maboko minei mpe ezala ya kotonda. Wana soki ozali na etiyelo te (Sa'a)

Mpe kobimisa Zakat kowuta na ndambu ya moko ya zomi ya kobimisa soki bazali kofuta mayi te pona kosopa na banzete ya dattes mpe milona, ndakisa: mbula mingala mpe bibale, mpe maziba oyo ezali kosopana, mpe makambo misusu ya ndenge wana.

Kasi, soki mai ya kosopela yango ezali kowuta na milende mpe na mbongo mingi: lokola na bapine ya mai, bamasini oyo etombolaka mai, mpe makambo mosusu ya ndenge wana, esengeli kobimisa ndambo ya zomi, ndenge eyambami na hadith kowuta na Ntoma ya Allah (Allah apambola ye mpe apesa ye kimia.)

Mpe mpona mbano ya motango ya banyama mpe ba Ngombe na Meme to Mpate ezali na Ndimbola ya bosôló na yango na hadithi kowuta na Ntoma ya Allah, moto nyoso oyo alingi koyeba yango atuna bato ya mayele mpona yango. Soki ezalaki te mokano ya kolobela yango na mokuse, mbele tolobelaki yango mpona kokokisa bolamu ya litomba mobimba.

Mpe mpona mbano ya motango ya Palata ezali kilo (Mithqals) mokama moko na ntuku minei, mpe ekokani na mbongo (Dirhams) ya Arabie Saoudite Riyals ntuku mitano na motoba

Mpe motango ya wolo ezali kilo (Mithqals) mokama moko na ntuku mibale, mpe motango na mbongo ya livre ezali zomi na moko mpe misato na sambo, mpe na bimekelo ntuku libua na mibale, mpe oyo esengeli na kobimisa zakat ezali motango ya moko ya zomi na oyo ezali na motango na yango to moko na yango mpe eleka mbula moko kobanda azua yango

Mpe litomba oyo ewuti na mombongo esengaka te eleka mbula mobimba kobanda mokolo ya kozua yango, mpe lokola bana ya bibwele (baye baleisaka bango matiti na ba mama na bango) na yango esengeli te mbula ya sika ebanda soki ba mama na bango bakokisi motango oyo zakat esengeli kofutama

Mpe Mbongo ya papier oyo bato bazali kosalela yango lelo, ezala oyo babengaka yango dirham, dinare, dollar, to nkombo misusu, nyonso wana esengeli kobimisa to kofuta zakat tango motángo na yango ekoki na esika oyo esengeli mpona Palata to Wolo sima ya mbula moko banda azua yango.

Mpe esengeli na Wolo to Palata oyo Basi balataka ekota na molongo ya mbongo, mingi mingi soki ekokisi motángo na yango (Nisab) oyo esengeli mpona kobimisa to kofuta zakat, mpe soki mbula moko eleki banda azua yango, esengeli kofuta zakat ata soki ezali mpona kosalela (kolata) to mpona kobomba, kowuta na maloba ya sôló kati ya Bato ya mayele kolandana na liloba ya Ntoma ya Allah (kimia mpe mapamboli ya Allah ezala likolo na ye):

«مَا مِنْ صَاحِبِ ذَهَبٍ أَوْ فِضَّةٍ لَا يُؤَدِّي زَكَاتَهَا إِلَّا إِذَا كَانَ يَوْمُ القِيَامَةِ صُفِّحَتْ لَهُ صَفَائِحُ مِنْ نَارٍ».

«Na Nkolo wolo to Nkolo palata oyo akoboya kofuta zakat, o mokolo ya suka bakofungolela ye moto (ya lifelo).»5. Kino na suka ya hadith oyo tolobeli yango liboso.

Mpe tango eyambamaki ete Ntoma ya Allah (kimia mpe mapamboli ya Allah ezala likolo na ye) amonaki ba singa mibale ya wolo na loboko ya mwasi alobaki:

«أَتُعْطِينَ زَكَاةَ هَذَا؟». قَالَتْ: لَا. قَالَ: «أَيَسُرُّكِ أَنْ يُسَوِّرَكِ اللهُ بِهِمَا يَوْمَ القِيَامَةِ سِوَارَيْنِ مِنْ نَارٍ!». فَأَلْقَتْهُمَا، وَقَالَتْ: «هُمَا لِلَّهِ وَلِرَسُولِهِ».

«Boye opesaka zakat mpona oyo?». Alobaki: te. Boye « ekosepelisa yo soki Allah alingi yo na bikanga mibale ya moto o mokolo ya suka? » Abwakaki yango mpe alobaki ete: « yango mibale ezali mpona Allah mpe na motindami naye »6.

Elobamaki ete Ummu Salamah, Allah asepela na ye, azalaki kolata biloko ya kokembisa ya wolo, yango wana alobaki ete: “Ee Motindami ya Allah, oyo etalelami lokola kobomba?" Ayanolaki ete:

«مَا بَلَغَ أَنْ يُزَكَّى فَزُكِّيَ فَلَيْسَ بِكَنْزٍ».

«Eloko nyonso ekomi na motango esengeli mpo na kopetolama mpe epetolami etalelami te lokola bomengo oyo ebombami»7 Elongo na ba hadith misusu oyo ezali na tina ya ndenge moko.

Mpo na biloko, oyo ezali ya mombongo, oyo ebongisami mpo na koteka, etángamaka na nsuka ya mbula, mpe babimisaka ndambo moko na minei ya motango na yango, ezala motango na yango ekokani na talo na yango, to eleki, to moke; kolandana na hadith ya Samurah, Allah andimela ye, alobaki:

«كَانَ رَسُولُ اللهِ ﷺ يَأْمُرُنَا أَنْ نُخْرِجَ الصَّدَقَةَ مِنَ الَّذِي نُعِدُّهُ لِلْبَيْعِ».

«Motindami ya Allah, Allah apambola ye pe apesa ye kimia, azalaki kopesa biso mitindo ya kopesa zakat na oyo tobongisaka pona koteka»8.

Mpe yango esangisi mabele ya koteka, bandako, mituka, bamasini ya kotombola mai, mpe lolenge mosusu ya biloko ya koteka.

Mpona ba ndako oyo etongami mpona kofutela kasi mpona koteka te, esengeli kofutela yango Zakat soki ekokisi mobu moko mpo ete yango etongamaki mpona koteka te. Pambate mokolo na yango asombaki yango mpona kosalela ye moko.

Mpe soki mokumbi motuka (Taxi) asangisi mbongo ekomi na motángo (ya litomba - nasab), esengeli afuta zakat na yango soki mbula ekoki banda azua yango, ezala atie yango pembeni pona bosenga ya misolo mpona kobakisa to kosomba biloko, to kofuta nyongo to mpona ntina mosusu oyo ezali kolakisa bilembo ya mibeko miye mindimami mpona kofuta zakat na lolenge boye.

Mpe Bato ya mayele balobi: kozala na nyongo epekisi kofuta zakat te engebene na maye tolobeli liboso.

Mpe misolo ya Bana Bitike misengeli na kofuta zakat soki mikokisi eleko sima na mobu kolandana na maloba ya Banganga Nzambe moe lolenge bilembetele ezali koloba kowuta na hadith ya Muanzi tango Ntoma atindaki ye na Yemen (mpona kokongolo mpe kozua zakat):

«إِنَّ اللَّهَ افْتَرَضَ عَلَيْهِمْ صَدَقَةً فِي أَمْوَالِهِمْ تُؤْخَذُ مِنْ أَغْنِيَائِهِمْ، وَتُرَدُّ فِي فُقَرَائِهِمْ».

«Ya sôló Allah atia likabo ezala mobeko epai na bango, kozua yango mpe kopesa yango na Babola»9.

Mpe zakat ezali endimami na Allah, endimami te kopesa yango na baye na molongo na yango ezali te, mpe esengeli te moto amipesela mpona koluka litomba, to mpona kobatela bozui na ye, to kolongola libunga na ye moko, Kasi esengeli na misilima abimisa zakat mpona kopesa yango na Bato oyo batangami na kurani mpe batiami litomo mpona yango, mpo bango bakolo na yango kasi basusu te mpona kopetola milimo ya moto na bolingo mpe na bosembo mpona Allah na likambo oyo mpo ete alongolama na mokumba na ye mpe abongi na mbano mpe lifuta monene.

Mpe Allah kembo naye asili kolimbola otei ya Buku naye lolenge ya bato oyo bazali na lotomo ya kozwa zakat,

Allah wa likolo alobaki :

﴿إِنَّمَا ٱلصَّدَقَٰتُ لِلۡفُقَرَآءِ وَٱلۡمَسَٰكِينِ وَٱلۡعَٰمِلِينَ عَلَيۡهَا وَٱلۡمُؤَلَّفَةِ قُلُوبُهُمۡ وَفِي ٱلرِّقَابِ وَٱلۡغَٰرِمِينَ وَفِي سَبِيلِ ٱللَّهِ وَٱبۡنِ ٱلسَّبِيلِۖ فَرِيضَةٗ مِّنَ ٱللَّهِۗ وَٱللَّهُ عَلِيمٌ حَكِيمٞ60﴾

{Ya sôló, makabo mazali mpona babola na bazangi nyoso na baye bazali kosala mosala wana ya kokongola yango, mpe mpona kolendisa mitema ya bandimi ya sika, ezali mpe mpona kokangola bawumbu to bakangami na boloko, ezali mpe mpona baye bazangi makoki ya kofuta ba nyongo, ezali mpe mpona baye babimi na nzela ya Allah, ezali mpe mpona mopaya na moto ya mobembo oyo azali na bokoki te, wana ezali lotomo oyo ewuti epai ya Allah, mpe Allah azali moyebi atonda bwanya 60} [At-Tawbah :60].

Mpe mpo na kosukisa mokapo oyo ya lokumu, na bankombo minene oyo mibale, Allah kembo naye akundoli basaleli na Ye ete Ye ayebi Nyonso na ntina ya ezalela na bango: oyo kati na bango abongi na makabo mpe oyo abongi na yango te, mpe ete azali na Mayele na mobeko (mpe kolinga) na Ye, kotiaka eloko mosusu te esika mosusu longola se na esika na yango, ata soki basekele mosusu ya mayele na Ye etikali kobombama na basusu, mpo ete basali na Ye bakoka kozala andimisami na mobeko na Ye mpe amikitisi na bosambisi na Ye.

Mpe Allah Azali Mokambi mpe Mosalisi na biso mpe kotangisa mpe kotalisa bamisilima bososoli ya lingomba lia Ye mpe bosôló kati ya maye matali kosalela Ye, mpe kokembisa maye atindaki mpona komikimisa na kanda na Ye, ya sôló Ye Azali Moyoki ya Penepne!

Mpe kimia mpe mapamboli ya Allah ezala likolo ya Mowumbu mpe Ntoma wa Ye Muhammad, mpe libota na ye mpe bayekoli na ye.

Mokambi monene ya bisika ya ba luki ya boyebi

Mpe kopesa ba fatwas, kosakola, mpe kokamba.

Nkumu ya lokumu sheikh Abdul Aziz bin Abdullah bin Baz

 

***

 


Mokanda ya mibale

Na maye matali bolamu ya Ngizi ya Ramadan mpe botelemi na butu na yango, elongo na ndimbola ya mibeko ya motuya oyo boyebi na yango ekoki kozala polele te mpo na bato misusu.

Okombo ya Allah wa boboto atonda ngolu

Kowuta na Abdoul Aziz mwana ya Abdoullahi mwana ya Baz, epai ya ba misilima banso baye bakotanga eye tika akamba ngai na bango nzela ya Bondimi mpe apesa biso bosololi ya sunnah mpe kurani. Amen!

Kimia ya Allah mpe mawa na mapamboli na Ye ezala likolo na bino

Sima na yango: Oyo ezali toli mokuse oyo etali bolamu ya kokanga Ngizi mpe kosambela na tango ya Ramadan, mpe bolamu ya kowelisa na misala ya malamu na tango na yango, elongo na ndimbola ya mibeko ya bantina oyo ekoki kobombama na bato misusu.

Elobami ete Na Ntoma ya Allah (losambo mpe kimia ya Allah ezala likolo naye) azalaki kopesa sango malamu epai ya bayekoli naye na oyo etali boyei ya sanza ya Ramadan, mpe azalaki kolobela bango ete ezali sanza oyo bikuke ya Ngolu mpe bikuke mia Lola bifungwamaka, mpe bikuke ya Lifelo bikangamaka, mpe bakangaka na yango bazabolo. Azalaki koloba:

«إِذَا كَانَتْ أَوَّلُ لَيْلَةٍ مِنْ رَمَضَانَ فُتِّحَتْ أَبْوَابُ الجَنَّةِ فَلَمْ يُغْلَقْ مِنْهَا بَابٌ، وَغُلِّقَتْ أَبْوَابُ جَهَنَّمَ فَلَمْ يُفْتَحْ مِنْهَا بَابٌ، وَصُفِّدَتِ الشَّيَاطِينُ، وَيُنَادِي مُنَادٍ: يَا بَاغِيَ الخَيْرِ أَقْبِلْ، وَيَا بَاغِيَ الشَّرِّ أَقْصِرْ. وَلِلَّهِ عُتَقَاءُ مِنَ النَّارِ، وَذَلِكَ كُلَّ لَيْلَةٍ».

«Ntango butu ya liboso ya Ramadan ekotaka, bizipeli ya lola efungwami mpe moko te na yango ekangamaka, mpe bizipeli ya lifelo ekangamaka mpe moko te na yango efungwamaka, mpe ba zabolo bakangamaka na minyololo, mpe mobengi moko abelelaka: Eh moluki ya bolamu, pusana pene, mpe o moluki ya mabe, zonga sima. Mpe Allah azali na baye alongolaka bango na Moto, mpe yango esalemaka butu nyonso».

Mpe Ntoma (kimia pe mapamboli ezala likolo na ye) alobi :

«جَاءَكُمْ شَهْرُ رَمَضَانَ شَهْرُ بَرَكَةٍ يَغْشَاكُمُ اللهُ فِيهِ: فَيُنْزِلُ الرَّحْمَةَ وَيَحُطُّ الخَطَايَا، وَيَسْتَجِيبُ الدُّعَاءَ، يَنْظُرُ اللهُ إِلَى تَنَافُسِكُمْ فِيهِ فَيُبَاهِي بِكُمْ مَلَائِكَتَهُ؛ فَأَرُوا اللهَ مِنْ أَنْفُسِكُمْ خَيْرًا؛ فَإِنَّ الشَّقِيَّ مَنْ حُرِمَ فِيهِ رَحْمَةَ اللهِ».

«Sanza ya Ramadan ekomeli bino ezali sanza ya lipamboli oyo Allah akozipa bino : Akitisaka mawa, alongolaka masumu, mpe ayanolaka na mabondeli. Allah akotala kowelisa (kosala bolamu) na yo na kati na yango mpe akomikumisa na yo na ba Anzelu na Ye. Na yango, bómonisa Allah bolamu kowuta na bino moko, mpo moto ya mawa azali ye oyo azangi mawa ya Allah kati na yango.» .

Mpe (Ntoma) kimia mpe mapamboli ezala likolo naye, alobi:

«مَنْ صَامَ رَمَضَانَ إِيمَانًا وَاحْتِسَابًا غُفِرَ لَهُ مَا تَقَدَّمَ مِنْ ذَنْبِهِ، وَمَنْ قَامَ رَمَضَانَ إِيمَانًا وَاحْتِسَابًا غُفِرَ لَهُ مَا تَقَدَّمَ مِنْ ذَنْبِهِ، وَمَنْ قَامَ لَيْلَةَ القَدْرِ إِيمَانًا وَاحْتِسَابًا غُفِرَ لَهُ مَا تَقَدَّمَ مِنْ ذَنْبِهِ».

«Moto oyo akangi ngizi ya Ramadan na kondima mpe kozela lifuta, masumu na ye ya kala ekolimbisama. Oyo akosambela na tango ya Ramadan na kondima mpe na kozela lifuta, masumu na ye ya kala ekolimbisama. Oyo akosambela na Butu ya Mokano na kondima mpe kozela lifuta, masumu na ye ya kala ekolimbisama.» .

Mpe Ntoma (kimia mpe mapamboli ezala likolo na ye) Alobi :

«يَقُولُ اللهُ: كُلُّ عَمَلِ ابْنِ آدَمَ لَهُ الحَسَنَةُ بِعَشْرِ أَمْثَالِهَا إِلَى سَبْعِمِائَةِ ضِعْفٍ إِلَّا الصِّيَامَ فَإِنَّهُ لِي وَأَنَا أَجْزِي بِهِ؛ تَرَكَ شَهْوَتَهُ وَطَعَامَهُ وَشَرَابَهُ مِنْ أَجْلِي. لِلصَّائِمِ فَرْحَتَانِ: فَرْحَةٌ عِنْدَ فِطْرِهِ، وَفَرْحَةٌ عِنْدَ لِقَاءِ رَبِّهِ. وَلَخُلُوفُ فَمِ الصَّائِمِ أَطْيَبُ عِنْدَ اللهِ مِنْ رِيحِ المِسْكِ».

«Allah alobi : Mosala nyonso ya mwana ya Adama ezali mpo na ye, mosala malamu ebakisamaka mbala zomi kino mbala nkama nsambo, longola se ngizi ezali mpona Ngai, Ngai moko nakofutaka yango. Atiki bamposa na ye, bilei na ye mpe biloko ya komela na ye mpo na ngai. Moto oyo azali kokanga ngizi azali na bisengo bibale: esengo moko ntango afungoli ngizi na ye, mpe esengo ntango akutani na Nkolo na ye. Mpe nsolo ya monoko ya moto oyo azali na ngizi ezali kosepelisa Allah koleka nsolo ya malasi (ya musc).».

Mpe ezali na ba hadiths ebele oyo elobeli bolamu ya kokanga ngizi mpe kosambela na tango ya Ramadan mpe bolamu ya lolenge ebele ya ngizi.

Mpe esengeli na mondimi kosalela libaku oyo, likabo ya Allah oyo emonisami na boyei ya sanza ya Ramadan ; na yango asengeli kosala nokinoki misala ya malamu, kokima misala ya mabe, mpe kosala makasi mpo na kokokisa mikumba ya Allah, mingimingi mabondeli mitano ya mokolo nyoso. Yango ezali likonzi ya Islam mpe mokumba monene nsima ya litatoli mibale ya kondima. Ezali obligatoire mpo na mobali mpe mwasi nyonso ya misilima kotala yango mpe kosala yango na bantango na yango oyo epesameli na komikitisa mpe na kimia.

Mpe moko kati ya misala ya ntina miye misengeli na mibali kokokisa yango na lisanga otei ya ba ndako ya Allah, kotombola lokumu na Ye mpe kokumisa nkombo na Ye ndenge alobaki:

﴿وَأَقِيمُواْ ٱلصَّلَوٰةَ وَءَاتُواْ ٱلزَّكَوٰةَ وَٱرۡكَعُواْ مَعَ ٱلرَّٰكِعِينَ 43﴾

{Mpe botelemisa losambo, mpe bobimisa zakat, mpe bogumbama elongo na bagumbami 43} [Al-Baqarah: 43], Mpe Allah alobi :

﴿حَٰفِظُواْ عَلَى ٱلصَّلَوَٰتِ وَٱلصَّلَوٰةِ ٱلۡوُسۡطَىٰ وَقُومُواْ لِلَّهِ قَٰنِتِينَ 238﴾

{Bobatela basambela, mpe sambela ya sima ya nzanga. Mpe botelema na limemia liboso ya Allah 238} [Al-Baqarah: 238], Mpe alobi:

﴿قَدۡ أَفۡلَحَ ٱلۡمُؤۡمِنُونَ 1 ٱلَّذِينَ هُمۡ فِي صَلَاتِهِمۡ خَٰشِعُونَ 2﴾

{Bandimi basila kolonga 1

{Baye bamikitisaka tango bazali kosambela 2} [Al-Mu'minûna : 1-2] Kino (Allah) alobaki:

﴿وَٱلَّذِينَ هُمۡ عَلَىٰ صَلَوَٰتِهِمۡ يُحَافِظُونَ 9 أُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡوَٰرِثُونَ 10 ٱلَّذِينَ يَرِثُونَ ٱلۡفِرۡدَوۡسَ هُمۡ فِيهَا خَٰلِدُونَ 11﴾

{Mpe baye bazali kobatela balosambo na bango 9 Bango nde bakitani 10 Bakokitanelaka bisika ya likolo, na lola bakozalaka libela o kati na yango 11}

[Al-Mu’minûna: 9-11], Na Ntoma (mikia mpe mapamboli ya Allah ezala likolo na ye) alobaki :

«العَهْدُ الَّذِي بَيْنَنَا وَبَيْنَهُمُ الصَّلَاةُ فَمَنْ تَرَكَهَا فَقَدْ كَفَرَ».

« boyokani oyo ezali kati na biso na bango ezali Losambo, na moto oyo akotika yango asili kopengwa ».

Mpe likambo ya motuya mingi koleka sima ya losambo ezali kobimisa to kofuta zakât ndenge Allah asila koloba:

﴿وَمَآ أُمِرُوٓاْ إِلَّا لِيَعۡبُدُواْ ٱللَّهَ مُخۡلِصِينَ لَهُ ٱلدِّينَ حُنَفَآءَ وَيُقِيمُواْ ٱلصَّلَوٰةَ وَيُؤۡتُواْ ٱلزَّكَوٰةَۚ وَذَٰلِكَ دِينُ ٱلۡقَيِّمَةِ 5﴾

{Batindamaki sé kaka babondela Allah na bomoko bwa ye mpe batelemisa losambo mpe bafuta Zakât boye nde lingomba ya bosembo.} [Al-Bayyinah : 5], Mpe (Allah) Nkolo alobaki:

﴿وَأَقِيمُواْ ٱلصَّلَوٰةَ وَءَاتُواْ ٱلزَّكَوٰةَ وَأَطِيعُواْ ٱلرَّسُولَ لَعَلَّكُمۡ تُرۡحَمُونَ 56﴾

{Mpe botelemisa losambo mpe bobimisa zakât, mpe botosa motindami, mpo ete bozua ngolu.} [An-Nûr: 56].

Mpe kurani ya Allah na sunna ya Ntoma ya lokumu elakisi ete: oyo akofuta zakat kowuta na bomengo naye te, Allah akopesa ye etumbu mpona yango o mokolo ya suka.

Mpe likambo ya motuya sima ya losambo mpe Zakat ezali kokanga Ngizi, oyo ezali lioko ya likonzi kati ya makonzi mitano ya islam oyo elobelami na liloba ya Ntoma (kimia mpe mapamboli ya Allah ezala likolo naye):

«بُنِيَ الإِسْلَامُ عَلَى خَمْسٍ: شَهَادَةِ أَنْ لَا إِلَهَ إِلَّا اللهُ وَأَنَّ مُحَمَّدًا رَسُولُ اللهِ، وَإِقَامِ الصَّلَاةِ، وَإِيتَاءِ الزَّكَاةِ، وَصَوْمِ رَمَضَانَ، وَحَجِّ البَيْتِ».

«Islamu etongami na makonzí mitano: kotatola ete nzambe mosusu azali te kaka Allah mpe ete Muhammad azali Ntoma ya Allah, kotelemisa losambo, kopesa zakat, kokanga ngizi na sanza ya Ramadan, mpe kosala Hajj na Ndako (ya Allah)».

Mpe esengeli misilima akanga Ngizi na ye mpe asala mabondeli na ye mpe amitia mosika na maye Allah apekisi ye kolandana na maloba mpe misala na ye; pamba te ntina ya kokanga ngizi ezali kotosa Allah Nkolo mpe kokumisa mibeko na ba ndelo na Ye oyo eyebani, mpe kobundisa bamposa ya molimo na botosi Nkolo na ye, mpe komimesanisa na motema molai na koboya oyo Allah apekisi. Ezali kaka te koboya kolya, komela, mpe biloko bisusu oyo ebebisaka ngizi; na ntina eye elobami na bosolo kowuta na Ntoma wa Allah, (Allah apambola ye mpe apesa ye kimia), alobaki:

«الصِّيَامُ جُنَّةٌ، فَإِذَا كَانَ يَوْمُ صَوْمِ أَحَدِكُمْ فَلَا يَرْفُثْ وَلَا يَصْخَبْ، فَإِنْ سَابَّهُ أَحَدٌ أَوْ قَاتَلَهُ فَلْيَقُلْ: إِنِّي صَائِمٌ».

«Kokanga Ngizi ezali libateli. Na yango, ntango moko na bino azali kokanga Ngizi, atombola mongongo na ye te to aloba maloba ya mabe te, mpe aswana te to asala mobulu te. Soki moto afingi ye to abundisi ye, kasi aloba: Nazali kokanga Ngizi.», Mpe eyambami kowuta na Ntoma kimia mpe mapamboli ya Allah ezala likolo na ye alobaki:

«مَنْ لَمْ يَدَعْ قَوْلَ الزُّورِ وَالعَمَلَ بِهِ وَالجَهْلَ فَلَيْسَ لِلَّهِ حَاجَةٌ فِي أَنْ يَدَعَ طَعَامَهُ وَشَرَابَهُ».

«Moto oyo azali kotika maloba ya lokuta te, mpe kosalela yango, mpe kozanga boyebi te (na bosalaka mabe), Allah azali na ntina te ete atika bilei mpe biloko na ye ya komela». Na makomi yango mpe na makomi mosusu, eyebani ete moto oyo azali kokanga Ngizi asengeli kokeba na makambo nyonso oyo Allah apekisi mpe asengeli kokangama na makambo nyonso oyo Allah asengi ye asala. Na kosalaka bongo, akoki kolikya bolimbisi, kosikolama na Moto ya Lifelo, mpe kondimama ya Ngizi mpe mabondeli na ye.

Mpe ezali na makambo misusu oyo bato misusu bazali na boyebi na yango te :

Kati na yango: Ezali na maye oyo esengeli na misilima asala, Kokanga Ngizi mpona kondima mpe koluka lifuti, kasi mpo na bokosi te, mpo na lokumu to komekola bato to kolanda libota na ye to bato ya mboka na ye te. Kasi, oyo esengeli mpona ye na Ngizi ezali kondima na ye ete Allah asengi ye asala bongo, mpe kozela na ye lifuti epai ya Nkolo na ye mpo na yango. Ndenge moko mpe mabondeli ya baye bakangi Ngizi ya (Ramadan) esengeli esalama na misilima mpo na kondima mpe koluka lifuti, kasi mpona ntina mosusu te. Yango wana Ntoma, kimia pe mapamboli ezala likolo na ye, alobaki:

«مَنْ صَامَ رَمَضَانَ إِيمَانًا وَاحْتِسَابًا غُفِرَ لَهُ مَا تَقَدَّمَ مِنْ ذَنْبِهِ، وَمَنْ قَامَ رَمَضَانَ إِيمَانًا وَاحْتِسَابًا غُفِرَ لَهُ مَا تَقَدَّمَ مِنْ ذَنْبِهِ، وَمَنْ قَامَ لَيْلَةَ القَدْرِ إِيمَانًا وَاحْتِسَابًا غُفِرَ لَهُ مَا تَقَدَّمَ مِنْ ذَنْبِهِ».

«Moto oyo akangi ngizi ya Ramadan na kondima mpe kozela lifuta, masumu na ye ya kala ekolimbisama. Oyo akosambela na tango ya Ramadan na kondima mpe na kozela lifuta, masumu na ye ya kala ekolimbisama. Oyo akosambela na Butu ya Mokano na kondima mpe kozela lifuta, masumu na ye ya kala ekolimbisama.».

Mpe kati na makambo oyo mobeko na yango ekoki kozala polele te mpo na bato misusu ezali: kozoka, kobima makila na zolo, kosanza, to kokita ya mai to esansi na mongongo ya moto oyo azali kokanga Ngizi na bolingi na ye te, makambo oyo nionso ebebisaka Ngizi te, kasi oyo amisanzisi yemoko na nko, Ngizi na ye ebebi, engebene na liloba ya Ntoma:

«مَنْ ذَرَعَهُ القَيْءُ فَلَا قَضَاءَ عَلَيْهِ، وَمَنِ اسْتَقَاءَ فَعَلَيْهِ القَضَاءُ».

«Oyo akosanza na bolingi na ye te akoki kofuta Ngizi na ye wana te, kasi oyo akomi sanzisa asengeli afuta yango.»

Mpe yango esangisi: maye oyo ekoki kokómela moto oyo azali kokanga Ngizi, na bozongisi nsima (tii na tongo) kosukola nsima ya kosangisa nzoto (na mwasi na ye), mpe oyo ekoki kokómela basi misusu oyo bazongisaka nsima kosukola nsima ya komona (makila) ya sanza to kobima makila nsima ya kobota, soki bamoni ete bazali peto liboso ya ntongo. Na likambo yango, basengeli kokanga Ngizi, mpe epekisami te ete bázongisa nsima kosukola tii nsima ya ntongo. Kasi, bapesameli nzela te ya kozongisa yango nsima tii ntango moi ekobima. Kasi, basengeli nde kosukola mpe kosambela losambo ya Tongo (Fajri) kino moyi ekobima. Mpe na yango, moto oyo azali na bosoto ya milulu (junub) azali na ndingisa te ya kozongisa nsima kosukola na ye ya molulu kino nsima ya kobima ya moi. Kasi, asengeli nde kosala kosukola na milulu mpe kosambela Fajr liboso moi ebima. Mobali asengeli kosala yango mbangu mpo na kokanga losambo ya Fajr elongo na lisangá.

Mpe kati na makambo oyo ebebisaka Ngizi te ezali komeka makila mpe kozwa ba nkisi ya ba tonga, te oyo esalemi mpo na bopesi bilei. kasi kozongisa yango sima tii na butu ezali malamu mpe ezali na bokebi mingi soki likoki ezali, kolandana na liloba ya Ntoma (kimia mpe mapamboli ezala likolo na ye):

«دَعْ مَا يَرِيبُكَ إِلَى مَا لَا يَرِيبُكَ».

«Tika eloko oyo ememaka yo na ntembe, mpe mitungisi mpona eloko oyo ezali polele mpe ememaka kimia na motema na yo ».

Mpe na maloba naye Ntoma (kimia mpe mapamboli ezala likolo na ye) :

«مَنِ اتَّقَى الشُّبُهَاتِ فَقَدِ اسْتَبْرَأَ لِدِينِهِ وَعِرْضِهِ».

Na moto oyo akobanga kokweya na makambo oyo ezali polele te, asili kopetola mpe kobakisa lingomba naye mpe apesi yango lokumu.

Mpe moko ya makambo oyo ezali kozanga epai ya bato basusu, ezali kozanga kozala kimia otei ya losambo, ezali Losambo ya Lotomo to ya Sunna. Ezali na bilembetele kati na hadith ezali oyo ezali kolakisa ete kimia ezali moko kati ya makonzi ya losambo. ezala losambo ya lotomo to ya sunna. ba hadith yasolo kowuta na ntoma oyo ezali komonisa ete kimia ezali moko kati ya makonzi ya losambo, yasolo penza losambo ekoki kondimama te soki ozangisi kimia kati ya motema mpe komikitisa kati na yango, mpe kowelisa kokita te kino mikuwa mia nzoto moko na moko ekozonga na esika yango. boko bato na sanza ya ramadan basambelaka losambo ya taraweh malamu te, okokuta basusu bazali kosolola mpe bazali kozua kimia te tango bazali kosambela , losambo ya lolenge oyo ezali ya mpamba mpe oyo akosambela lolenge wana akozua lisumu mpe akozua lifuta te.

Mpe moko kati ya makambo oyo mibeko na yango ekoki kozanga epai ya bato misusu; ezali bokanisi ya bato misusu ete losambo ya Taraweh epesami nzela te kokitisa yango na nse ya ba raka'a tuku mibale (20), mpe basusu bakanisaka ete moto akoki te kobakisa likolo yaba raka'a zomi na moko to zomi na misato. Makanisi nyonso oyo, ezali na esika na yango te, kasi ezali nde mbeba oyo ekeseni na bilembeteli (na preuve).

Mpe ba hadith misusu ya sôló oyo ewuti na Ntoma ya Allah (Allah apambola ye mpe apesa ye kimia), ezali kolakisa ete losambo ya butu ekoki kobongolama; ezali na ndelo moko te oyo etyami oyo ekoki koleka te. Kasi, eyambamaki ete (Ntoma) Allah apambola ye mpe apesa ye kimia, azalaki kosambela raka’a zomi na moko na butu, mpe ntango mosusu azalaki kosambela raka’a zomi na misato, mpe ntango mosusu azalaki kosambela moke koleka na Ramadan mpe na bantango mosusu. Ntango batunaki ye mpo na losambo ya butu, alobaki ete:

«مَثْنَى مَثْنَى، فَإِذَا خَشِيَ أَحَدُكُمُ الصُّبْحَ صَلَّى رَكْعَةً وَاحِدَةً تُوتِرُ لَهُ مَا قَدْ صَلَّى».

«Basambelaka (Losambo ya butu) na ba raka'a mibale mibale, kasi soki moko na bino abangi ete ntongo etanela ye na kati ya losambo, asambela raka'a moko mpo ekomisa yango Witr (impair) na maye asambelaki.». Bayokanaki mpo na bosolo na yango

Mpe tikalaki kotia motángo moko te ya ba raka'a, ezala na Ramadan to na bantango mosusu. Yango wana bayekoli na tango ya Umar - Allah asepela na ye -, tango mosusu bazalaki kosambela raka’a tuku mibale na misato (23) mpe tango mosusu rak’ah zomi na moko (11). Nyonso wana esalemaki kowota na Umar - Allah asepela na ye -, mpe na ba bayekoli oyo bazalaki na tango na ye.

Mpe ba salafi misusu (kati ya ba misilima) bazalaki kosambela ba raka'a na sanza ya ramadan mpe kosukisa witri raka'a misato (3). yango sheikh Al islam ibni at- taimiyyah na bato ya mayele misusu balobelaki, mpe allah ayokela (sheikh) mawa mpo ete likambo yango lizali monene. Alobelaki mpe ete ezali malamu mingi mpo na moto oyo azali kowumelisa kotanga, kozala na ruku'u mpe na sudjoûd akitisa motango ya ba raka'a, mpe mpona moto oyo azali kowumelisa te kotanga, kozala na ruku'u mpe na sudjoûd abakisa motángo ya ba raka'a. Oyo ezali tina ya maloba na ye (Sheikh) Allah ayokela ye mawa.

Mpe oyo azali komanyola Sunnah na ye (Ntoma) Allah apambola ye mpe apesa ye kimia, akoyeba ete eloko eleki malamu na nionso oyo ezali kosambela rak’ah zomi na moko (11) to zomi na misato (13) na Ramadan mpe tango mosusu, pamba te yango nde elandani na mosala ya Ntoma ( Allah apambola ye mpe apesa ye kimia) na makambo mingi na ye, mpe pamba te ezali boboto mingi na ba Sambeli, mpe penepene na komikitisa mpe kimia. Mpe oyo abakisi yango, mabe to koyina ezali te ndenge tolobaki yango liboso.

Mpe ezali malamu mingi mpo na moto oyo asambelaki elongo na Imam na tango ya losambo ya butu ya Ramadan akende te longola se na Imam, mpo Ntoma alobaki:

«إِنَّ الرَّجُلَ إِذَا قَامَ مَعَ الإِمَامِ حَتَّى يَنْصَرِفَ كَتَبَ اللَّهُ لَهُ قِيَامَ لَيْلَةٍ».

«Mpe yasolo moto soki atelemi elongo na imam kino akosilisa, Allah akokoma mpo na ye mbano ya kosambela butu mobimba».

Mpe esengeli na ba misilima banso komipesa mpona kosala misala ya malamu ya ndenge na ndenge na sanza oyo ya mapamboli mpona kosambela kokumisa mpe kosenga (Allah) ndakisa: kobondela na limemiya, kotanga kurani mingi, komanyola yango mpe bososoli, kokumisa Allah mingi mpe kosakola biloko naye mpe kotondo ye, koluka bolimbisi epai naye, kobondela malamu, kotinda na kosala bolamu mpe kopekisa kosala mabe, kobenga bato na nzela ya Allah, kosalisa babola mpe bazangi, kosalela baboti bolamu mingi mpe kokanga singa ya bondeko, kozala malamu na baninga ya pene (voisins). kokende kotala bato ya bokono (na ndako ya n'kono to bisika inso iye bazuami), mpe kosala misala misusu ya malamu ya ndenge wana, kolandana na maloba ya ntoma ya (kimia mpe mapamboli ya Allah ezala likolo naye) alobaki na hadith oyo ewutaki koleka liboso:

«يَنْظُرُ اللهُ إِلَى تَنَافُسِكُمْ فِيهِ، فَيُبَاهِي بِكُمْ مَلَائِكَتَهُ؛ فَأَرُوا اللهَ مِنْ أَنْفُسِكُمْ خَيْرًا، فَإِنَّ الشَّقِيَّ مَنْ حُرِمَ فِيهِ رَحْمَةَ اللهِ».

Allah azali kotalela bino ndenge bozali kowelela kosala yango, mpe azali kotinda b'anzelu naye batala lolenge nini bolekisaki bomoyi na bino kowuta na mikakatano miye mizuaki bino kowuta na milimo na bino mpe ba mposa na bino oyo satana ya botutu akosaki bino na mokili. Allah alingeli bino bolamu kowuta na bino moko, moto ya mawa azali oyo azangi mawa ya Allah kati na yango.

Mpe tango eyambamaki kowuta na Ntoma (kimia mpe mapamboli ezala likolo na ye ) yasolo alobaki:

«مَنْ تَقَرَّبَ فِيهِ بِخَصْلَةٍ مِنْ خِصَالِ الخَيْرِ كَانَ كَمَنْ أَدَّى فَرِيضَةً فِيمَا سِوَاهُ، وَمَنْ أَدَّى فِيهِ فَرِيضَةً كَانَ كَمَنْ أَدَّى سَبْعِينَ فَرِيضَةً فِيمَا سِوَاهُ».

«Moto oyo azali kopusana penepene na Allah kati na yango na kosalaka moko ya bizaleli malamu azali lokola moto oyo asali lotomo na kati na yango, mpe oyo asali lotomo na kati na yango azali lokola moto oyo asali lotomo ntuku nsambo na kati na yango te.»

Mpe kowuta na liloba naye Ntoma (kimia mpe mapamboli ya Allah ezala likolo naye) alobaki na hadith ya malamu ete:

«عُمْرَةٌ فِي رَمَضَانَ تَعْدِلُ حَجَّةً، أَوْ قَالَ: حَجَّةً مَعِي».

«(kosala) oumrah na sanza ya ramadan ekokani na (moto) oyo asali hajj, to ndenge alobaki: bosala hajj elongo moko na ngai».

Mpe ezali na ba hadith mpe maloba mingi oyo ezali kolakisa bondimami ya kosala bolamu mpe kowelisa bomekani na sanza esantu ya Ramadan.

Tosengi na Allah apesa biso mpe ba misilima nionso elonga na nionso oyo esepelisaka ye, andima ngizi mpe mabondeli na biso, abongisa lolenge ya kobika na biso, mpe atia biso banso mosika na mitambo ya mimekano ya libungi. Mpe tosengi na Lokumu na Ye (Nkolo ya likolo), akamba bakambi ya ba misilima mpe asangisa bango na bosolo. Azali Mobateli ya likambo wana mpe azali na makoki na yango.

kimia mpe mawa na mapamboli naye ezala likolo na bino.

 

 

***

Index

 

Mokanda mwa yambo 2

Pona boluki ya ntina na maye matali Zakat 2

Mokanda ya mibale 15

Na maye matali bolamu ya Ngizi ya Ramadan mpe botelemi na butu na yango, elongo na ndimbola ya mibeko ya motuya oyo boyebi na yango ekoki kozala polele te mpo na bato misusu. 15

 

 

***

 

ln418v2.0 - 08/04/2026


Eyambami na Muslim na NO (993) .

Eyambami na Muslim, NO (987).

Eyambami na Al-Bukhâri, NO (1338).

Eyambamaki na Muslim, NO (987).

Eyambamaki na Abu Dawud, NO (1563), mpe An-Nasâi, NO. (2270), na Nzela ya boyambemi bolamu.

Eyambamaki na Abu Dawud, NO (1564).

Eyambamaki na Abu Dawud, NO (1562).

Eyambamaki na Al-Bukhâri, NO (1395), mpe Muslim, NO (19).

Eyambami na Bukhariyou, N°(8), mpe na Muslim, N°(16).